Standardisation et uniformisation de l’orthographe

Bokeli mpé bosangísí bwa nkomálámu ya minkokó mya ekólo ya Zaïre (na falansé: Standardisation et uniformisation de l'orthographe des langues Nationales du Zaïre) ezalí elɔngɔ́tɛ̂ lisangá ya mibéko ya nkomálámu mpé bokɛsɛnisi bwa alofabé óyo esalemi nal komité moko ya Likita ya lokóta ya libosó ya Zaïre (lelo Kongó-Kinsásá) kobanda mokolo ya 22 tii 26 máyi 1974 na Lubumbashi mpɔ̂ na minɔkɔ Kikɔ́ngɔ, Lingala, Kiswahíli mpé Ciluba epesamákí toli.

Alofabé

kokoma

Mileli 7

kokoma

a, e, ɛ, i, o, ɔ, u

(na elembo: a á Á ǎ Ǎ â Â · e é É ě Ě ê Ê · ɛ Ɛ ɛ́ Ɛ́ ɛ̌ Ɛ̌ ɛ̂ Ɛ̂ · i í Í ǐ Ǐ î Î · o ó Ó ǒ Ǒ ô Ô · ɔ Ɔ ɔ́ Ɔ́ ɔ̌ Ɔ̌ ɔ̂ Ɔ̂ · u ú Ú ǔ Ǔ û Û)

Mileli ndámbo 2

kokoma

w, y

Milelisi 26

kokoma

b, d, f, g, gb, j, k, kp, l, m, mb, mf, mp, n, nd, ng, ngb, nk, ns, nt, ny, nz, p, s, t, v, z

Mibéko mya motéma

kokoma
  1. Soki likɔki ezalí, esengeli kobóya nkómá míbalé, nkómá mísáto mpé bôngó na bôngó mpó na komonísa mongóngó mɔ̌kɔ́.
  2. Kosálela átâ elembo mɔ̌kɔ́ tɛ́ mpó na komonísa etuluku ya makɛlɛ́lɛ.
  3. Kosálela bilembo ndéngé na ndéngé tɛ́ mpó na komonísa mongóngó ɔ̌kɔ́.
  4. Nkomálámu ya lokóta ezalí likoló lya niɔ̌nsó fonologíkí mpé fonetíkí tɛ́; mpó na ntína óyo esengeli komonísa makambo niɔ̌nsó óyo ekesenisaka monɔkɔ mɔ̌kɔ́ mpé kozánga kotálela makambo ma fonetíkí.[1]

Etála ya ekomeli

kokoma

Tálá mpé

kokoma
  1. https://www.lingalistiki.li/p/nkomalamu-orthographe.html