Antoine Gizenga

Ministɛlɛ mwa yambo ya Guvenemá ya Kongó-Kinsásá

Antoine Gizenga Funji azalí moto wa politíki. Azalákí Ministɛlɛ mwa yambo ya Guvenemá ya Kongó-Kinsásá.

Antoine Gizenga o sánzá ya zómi na míbalé, mobú 2006.

Gizenga abótámí o Mushiko, mokɔlɔ 5, sánzá ya zómi o mobú 1925. Azalákí Ministɛlɛ mwa yambo ya Guvenemá ya Kongó-Lipopo (Kongó-Kinsásá ya kala) o 1960, 1961-62, mpé Prezidá ya botɔmbɔki o 1961. Guvenemá ya yě, na Stanleyville lokolá mbóka-mokonzi, ezalákí na limɛmya lya bisé 21 bya Afríka, Azía mpé Erópa ya Ɛ́sita o sánzá ya míbalé, 1961. Azalákí o bɔlɔ́kɔ útá sánzá ya yambo, 1962, tíí sánzá ya nsambo, 1964, mpé mbála esúsu útá sánzá ya zómi, 1964, tíí sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́, 1965. Azalákí mopaya útá 1965 tíí 1992.

O 2006, azalákí kandidá na mapɔnami ya Prezidá ya Kongó-Kinsásá. Azwákí 13,06 % ya vɔ́ti na mbála ya yambo. Azwákí ebóngá ya Ministɛlɛ ya yambo na Prezidá Joseph Kabila

  • Jean Mpisi, Antoine Gizenga le combat de l'héritier de Patrice Lumumba, Éditions L'Harmattan, 2007.


  Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ.


Moyángeli wa yambo ya Bulamatari ya Kongó-Kinsásá

Patrice Lumumba | Joseph Iléo | Albert Ndele | Justin Marie Bomboko | Antoine Gizenga | Joseph Iléo | Cyrille Adoula | Moise Tschombé | Évariste Kimba | Léonard Mulamba | Mpinga Kasenda | Bo-Boliko Lokonga Monse Mihambo | Nguza Karl-I-Bond | N'singa Udjuu Ongwabeki Untubu | Kengo Wa Dondo | Mabi Mulumba | Sambwa Pida Nbagui | Kengo Wa Dondo | Lunda Bululu | Mulumba Lukoji | Etienne Tshisekedi | Bernardin Mungul Diaka | Nguza Karl-I-Bond | Etienne Tshisekedi | Faustin Birindwa | Kengo Wa Dondo | Etienne Tshisekedi | Likulia Bolongo | Augustin Matata Ponyo | Samy Badibanga | Bruno Tshibala | Sylvestre Ilunga