Zacharie Tshimanga wa Tshibangu

Tshimanga wa Tshibangu
Description de l'image Zacharie Tshimanga Wa Tshibangu 2.jpg.
Naissance
Musefu,(Bɛndɛ́lɛ ya Kongó ya Bɛ́lɛjika Congo belge)
Décès
Bruxelles, (Bɛndɛ́lɛ ya Bɛ́ljika Belgique)
Nationalité Congolais
Profession
Formation

Zacharie Tshimanga wa Tshibangu (4 ɔkɔtɔ́bɛ 1941 - 10 dɛsɛ́mbɛ 1985) azalaka Mosapoli wa Kongó-Kinsásá.

Mayé AsalaModifier

 
Lisapo ya Zaire (1976)
 
Enseignement en Republique du Zaire (1986)

Zacharie Tshimanga wa Tshibangu abótama na engumba ya Musefu[1] na etuka ya Kasai ya Límbe na mokɔlɔ mwa 4 ɔkɔtɔ́bɛ 1941. Akoma ba búku ebelé na mayé matali masapo ya mboka ya Kongó-Kinsásá Azalí mosapoli wa yambo ya koma búku na mayé matali lisapo ya Kongó-Kinsásá

Atangisa na Institut Supérieur Pédagogique ya Bukavu, na Bobɔ́ngɔ bwa Kisangani. Bisika azalaka mokónzi.

Azalaka mpé mokónzi osima ya Isidore Ndaywel è Nziem na ligomba ya SOHIZA. Óyo basála elengo na basapoli ya Kongó-Kinsásá misusu.

Kelási na bipayi atangaModifier

Libosó yako kende o mboka mopaya Tshimanga wa Tshibangu atangaka kelási nayé mobimba na Kongo-Kinshasa. Bokoti na yé na bobɔ́ngɔ emɛma yé na mboka ya Falansia. Kuna na mobu ya 1967 azwaka licence ya lisapo na zéogalafi. Na mobu ya 1968, azwaka Maitrise ya lisapo. Asúkisaka kelási na yé o mobu mwa 1971 tángo akomaka dokotolo ma makambo etali Masapo.

Kelási minango ma masalamaka manso na Bobɔ́ngɔ Toulouse Jean-Jaurès

Na sima ya kotanga kelási na Falansia, Tshimanga wa Tshibangu ozóngaka o mboka pona kosala mpé mpo na kotángisa.

BowéyiModifier

Professeur Tshimanga wa Tshibangu akúfaka o mokolo ya 10 dɛsɛ́mbɛ 1985 na Bruxelles mboka ya Beljika

MakomíModifier

BúkuModifier

  • «Histoire du Zaïre» Editions Ceruki, 1976.
  • «Enseignement en République du Zaïre : guide pédagogique» Editions BASE, 1986. (Sima liwa nayé)

Mazita o libandaModifier

Mituya ya mikéModifier

  1. Engumba ya Musefu na site ya getamap.net