Teofil Verbist (12 yúni 1823 - 23 febwáli 1868) abandisi lingomba ba Scheut ntángo azalakí naínu aumônier ya etéyelo ya basodá na Bruxelles. Abotami o mboka Anvers o mobú 1823. O libota lya yé bazalakí bána nsambo. Tatá wa yé asalaki mosala mwa banki mpé mama wa yé azalaki mwána wa monganga-mopasoli.

Teofil Verbist

Teofil ayekoli o likindo like o mboka Malines. Wana mpé, asilisi boyekoli bwa yé o likindu linene mpé akuli bonganga. Episkopo aluboli yé mokambi wa likindu like, esika yé ayekoli libosó. O nsima ya mibú motóba, akomí aumônier ya eyekwelo ya basoda o mboka Bruxelles. Eleko mei akomí moyángeli wa banyango bafandaki o ndáko penepene na eyékwelo ya basodá.

Azalaki nzotu mokasi, yé motu wa mpiko mpenza, motu bonkonde na bosawa, motu na motema molamu. Bolamu bwa ye bokamwisi baninga ba ye. O eyekwelo ya basoda bapesi yé nkómbó: le bon monsieur Verbist. Bayekoli na bateyi ba likindu like mpé balingaki yé.

O mobú 1865, mibu misato o nsima ya bobandisi lingomba Congregatio Immaculati Cordis Mariae, CICM, basango bazalaki motoba mpé banei ba bangó bamilengeli mpo ya kukende na Shina. O eleko ena, mibembo miumelaki mingi. Sango Teofil na baninga ba yé bakendeki liboso na Pari mpe na Roma. Na nsima bakei na Marseille mpo ya koyingela na masuwa, mpepo izalaki naínu te.

Akani kobanda lingomba lya basango mpo ya misyo o mokili mwa Shina. Banganga Nzambe banei basangani na ye mpe bakei kufanda na ye elongo o ndáko móko ya Anderlecht. Bazalaki basango ba libosó ba lingomba ya Scheut. Kardinale wa Beljika, Pápa wa Roma mpé moyángeli wa lingomba lya Bopalinginyi-Eyamba o mboka Pari bandimi mokano mwa Teofil, mpe bapesi ye mosolo mpo ya kotonga likindo linene o mboka Scheut-Anderlecht. Azwi mpe bondimi bwa episkopo ya Peking. Na lisalisi lya bango banso mpe na mabonza ma bakristu ba Beljika batongi likindu linene o mboka Scheut, eteni ya Anderlecht.

Teofil Verbist alengeli 'te ázonga o mboka Bruxelles mpo 'te abongisa noviciat wana. Kasi akanaki 'te liboso akende kutala naino misyo ya basango mpe ya banganga Nzambe chinois. Esika abuti ngomba moko mwa molai na farasa ebendaki likalo, farasa ya ye ebuti bobele na nkwokoso mingi. Ezalaki o sanza ya ibale ya mobu 1868 mpe mpio elutaki. Na bomoni nkwokoso ya farasa, Theophile alongoli kasaka ya ye mpe ayei kotambola mpe kobuta ngomba elongo na farasa wa ye. Ekomi ye o nsonge atoki mingi. Abuti lisusu o likalo, kasi, mpo 'te akitisa molunge ya nzotu, alati kasaka lisusu te. Wana likama, zambi na mpio mingi okoki kukitisa molunge mwa nzotu bobele na moi na moi. Ekomi ye o misyo na butu, fievre ekangi ye mpe etiki ye lisusu te. Monganga azalaki te, lopitalo mpe te. Theophile awei wana. Akokisi bobele mibu 44. Mbele awei na tyfus te, mbele awei na malali ma mopanzi.

Sur les autres projets Wikimedia :