Congregatio Immaculati Cordis Mariae

(Eyendísí útá Lingomba ba Scheut)

Congregatio Immaculati Cordis MariaeLingomba ba Scheut (CICM) o mobu 1865, mibu misato o nsima ya bobandisi lingomba Congregatio Immaculati Cordis Mariae, CICM, na Teofil Verbist basango bazalaki motoba mpe banei ba bango bamilengeli mpo ya kukende na Chine. O eleko ena, mibembo miumelaki mingi.

Devise et sceau de la Congrégation

O elaka eye, elaka ya mibu nkama moko na ntuku itano, motango mwa basango bayekoli wana mpe bakei misyo moleki 3000. Bakei bobele o mokili mwa Shina te, bakei mpe o mikili misusu ntuku ibale. Tokoki sikawa kutala foto ya bango banso o mizé chinois o mboka Scheut.

Bayangeli ba basango bakofanda o mboka Roma. Basango, baye bazali na bomoi sikawa, bazali 900. Ndambo ya bango bauti na Afríka, Azía mpe Ameríka. Banso bakotiya molende mpo 'te bipai binso batu bazala na boboto, bosembo, boyokani na bolingani. Bakoteya Nsango Ndamu. Bakosambela misa. Bakobokolo bana na mateya ma Nzambe. Bakosala mosala mwa misyo elongo na basalisi bayike. Lokola bapostolu bazali na Cor unum et anima una: bakolula mpe bakoluka bomoko o boteyi mpe o mosala mwa kobanda mpe kotonga Eklezia.

Esilisi bango mobembo wa mikolo 100, episkopo wa Peking mpe basango français, ba Lazaristes, bayambi basango lingomba ba Scheut na motema nsai mpenza. Ba Lazariste bazangaki basango o misyo ya Mongolí o nordi ya Shina. Balengeli 'te batia misyo wana o maboko ma basango lingomba ba Scheut mpe bapesi bango lisalisi lya banganga Nzambe motoba ba Mongolí. Banganga baye bakei kofanda epai ya bango mpe babandi koteya bango lokota la ba Chinois.

Ntembe te, mpo 'te basango bayela batu Nsango Ndamu, esengeli 'te bayekola lokota la batu. Soko balingi 'te ba Chinois babongola motema mpe bakoma bakristu, esengeli 'te basango bayeba mpe bandima mimeseno na mibeko mya bankoko ba bango. Wana lotomo lonene mpo ya basango o mokili mwa Shina. Nkwokoso iutaki na boyekoli monoko mwa ba Chinois, iutaki na mpio ya nsomo o nordi ya Chine eleko ya mpio, iutaki na nzala zambi o mobu mwa mibale, batu babandi kuzanga bilei. Wana matata mpenza! Basango babiki bobele na mbongo batu ba Belgique mpe ba mikili misusu batindeli bango. Nsima ya minyoko miye minso, bazangi mpe banganga mpe lopitalo o mokili wana, mpe mbala na mbala bayibi basangani mpo ya kubotolela batu biloko bisengeli na bango. Ata minyoko miye, basango 650 basalaki mosala wa misyo o mboka Shina, banda mobu mwa 1865 tee na mobu 1944, mobu communisme ebandi kuyangela China. Ba communiste basengisi bampaya na bauta banso bátika mokili mwa Chine. Na nsima balongoli bango na makasi. Balongoli mpe basango banso... Kasi, ata ba kommuniste baboyaki bango, bakristu bazalaki na mpiko mpe na molende. Ba kommuniste bakoki kopekisa mpe koboma eyamba ya bakristu te… Seko basango bazalaki lokola loboko la Nzambe mpo ya kulona Bokonzi ya Ye o mitema. Theophile, mobandi mwa basango ba Scheut, alobaki na bango mpe akomeli bango mbala na mbala: Bómikaba, bóyika mpiko, bómilendisa mpo 'te batu bakumisa Nzambe mpe na nzila wana banso bakobika! Akundoli yango na mikanda mya ye ntango inso.

O mobu mwa 1865, basango ba yambo banei bakomi o mboka Shina. Ferdinand Hamer azalaki leki wa bango mpe asalaki wana mibu 35. Akomi Episkopo. Kasi sango Van Segvelt akufi na malali ya tyfus o nsima ya mobu moko mpe sanza ínei. Mpe mobu moko o nsima ya liwa lya Van Segvelt, Teofil Verbist yé mpé awei. Banso bakanisi 'te ye mpe awei na bokono bwa tyfus. Fievre ekangi ye mpe alendendali. Monganga azalaki te, lopitalo mpe te. Nganga Nzambe chinois akulisi ye Mafuta Masantu ma bakoni mpe mwa mikolo o nsima sango Theophile awei. O nsima ya ye basango bayike bawei o mboka Chine na bokono bwa tyfus, mbele moko wa misatu awei boye. Ba Chine bango mpenza bazalaki kokufa na tyfus te, kasi bampaya o mokili mwa bango bawei ebele na tyfus. Bobele o mobu mwa 1930 monganga moko wa Pologne akeli mono mpo ya basango. Bákamata yango,… mpé bakufi mpo ya tyfus lisusu te.

Sur les autres projets Wikimedia :