Pulupulu to diarrhées eza loléngé ya kolekisa bosoto ya petepete tǒ ya máyi máyí mosukusuku na mitshopo mikɔlɔ niɔ̂nsɔ. Míngi míngi esálaka mua mikɔlɔ mpé ekokí komema bokauki ya máyi ya nzóto kolandana na bobungi bua máyi. Bilembo ya bokauki ya máyi ya nzóto míngi míngi ebandaka na bobungi bua milelo ya loposo ya nzóto mpé mbóngwana ya bomoto. Yangó ekokí kokoba kino na kozánga masuba, bobungi bua mokóbo ya loposo, motema kobéta mbángu mbángu, mpé bolembú ya kosála likambo tángo bokɔnɔ óyo boza kokóma makási koleka. Kolekisa bosoto ya petepete kasi eye ezalí ya máyi te épáyi ya bána bake baye bazali komela libele ya mama, yangó, ekoki kozala likambo tɛ̂.[2]

Pulupulu
Micrographie ya electron ya rotavirus, ntína ya pene na 40% ya baye bakolálisama na mbéto ya lopitálo kowuta na pulupulu kati ya bána ya mibú na sé ya mítáno.[1]Pulupulu
Micrographie ya electron ya rotavirus, ntína ya pene na 40% ya baye bakolálisama na mbéto ya lopitálo kowuta na pulupulu kati ya bána ya mibú na sé ya mítáno.[1]Pulupulu
Micrographie ya electron ya rotavirus, ntína ya pene na 40% ya baye bakolálisama na mbéto ya lopitálo kowuta na pulupulu kati ya bána ya mibú na sé ya mítáno.[1]
Classification mpe ressources ya kowuta libanda
ICD/CIM-10A09, K59.1 A09, K59.1
ICD/CIM-9787.91 787.91
DiseasesDB3742
MedlinePlus003126

Ntína eye eyébaní míngi mpeza eza infection ya mitshopo kolandana na virus, ba bacteries, parasite, to loléngé loye loyébani bo kovímba ya miqueuse tǒ gastro-entérite. Ba infections óyo míngi míngi ezwámaka na biléi tǒ na máyi óyo eza contaminé na nyei, to mbala mókó kowúta na mutu mosúsu óyo azalí na bokɔnɔ bona. Ekokí kokabolama na loléngé mísáto: pulupulu ya máyi ya ngonga mokúsé, pulupulu ya makilá ya ngonga mokúsé, mpé sókí ewumeli koleka póso míbalé, yangó ezalí bôngó pulupulu ya moto mangwongi. Pulupulu ya mayi ya ngonga mokúsé ekokí kozala elandani na infection ya choléra. Soki eza na makila yango eyebani mpe bo dysenterie.[2] Pulupulu ekokí mpé kozwama na banzelá misúsu óyo ezalí ya infection tɛ̂, yangó eza: hyperthyroïdie, intolérance ya lactose, bokono ya kovímba mitshopo, loléngé sóngóló tǒ pakala ya bomeli bua nkísi, mpé syndrome ya kotungisama na mitshopo.[3] Na bambala mingi lolenge ya nyei esengelaka te mpo na koconfirmer ntina mpeza ya bokono.[4]

Prevention ya infection ya pulupulu esálemaka na nzelá ya bolengeli malámu assainissement, máyi ya komela ya petwa, na kosukola mabɔ́kɔ. Komelisa mwǎna libɛ́lɛ ya mamá au moins sánzá motóbá yangó mpé ezalaka recommander bo mangwele ya bobáteli na rotavirus. Solution ya bozongisi máyi na bomeli (ORS), yangó ezalí bôngó máyi ya petwa na motángo mokɛ́ ya mungwa mpé sukali, yangó eza choix malámu ya traitement. Ba comprimé ya Zinc ezalaka mpe recommandé.[2] Ba traitements oyo etangemi bo ebikisa bamillion 50 ya bána na mibú 25 milekí.[1] Tángo batu bazwamaka na pulupulu basengaka na bangó bákoba kolíya biléi malámu mpé babébé bakoba komela libɛ́lɛ ya mamá.[2] Sókí máyi ya kozongisa na nzóto óyo etekamaka ezwamí tɛ̂, batu bakokí kosálela basolution eye elengelami na ndáko.[5] Baye máyi ya nzóto ekaukí mpenzá makási bakokí kosengela na bozongisi máyi na nzelá ya misisá.[2] Kasi, ba cas míngi; ekokí kolengelama malámu na bozongisi máyi na nzelá ya monɔkɔ.[6] Ba antibiotique, atáko basálelaka yangó míngi tɛ̂, ekokí kozala recommander mpɔ̂ na ba cas mikɛ́ neti mpɔ̂ na baye baza na pulupulu ya makilá na fièvre ya makási, baye baza na pulupulu makási sima ya mobémbo, mpé baye bazwami na ba bacteries tǒ ba parasites sóngóló kati ya nyei nabangó.[4] Loperamide ekokí kosálisa mpô na kokitisa mosukusuku nakati ya mitshopo kasi eza recommander tɛ̂ mpô na baye bazalí kobela makási.[4]

Pene ya 1.7 kino 5  ya babillion ya ba cas ya pulupulu ezwamaka na mibú niɔ̂sɔ.[2][3] Ezwamaka míngi na ba pays en voie de développement, épái wápi bǎna bake bazwaka pulupulu pene mbalà mísáto na mbúla.[2] Na 2013 motángo ya baye bansɔ bakufáki na pulupulu ezalákí 1.26 million ya bato, motángo óyo mokitaki kowúta 2.58 million na 1990. Na 2012, pulupulu ezalákí ntína ya míbalé ya liwâ ya bána mikɛ́ baye baza na mibú na sé ya mibú mítáno (0.76 million tɔ̌ 11%).[2][7] Pulupulu ya kozónga mbalà ná mbalà ezalaka mpé ntína ya bolei mabé mpé ntína ya mikakátano miye mikomelaka bǎna bake ya mibú na sé ya mítáno.[2] Nkókósó misúsu óyo ekokí kobimela sima na eleko molayi ekokí kowúta na bokóli mabé na nzóto mpe mayɛ́lɛ́.[7]

Ba références

kokoma
  1. 1,0 et 1,1 "whqlibdoc.who.int" (PDF). World Health Organization. Archived from the original on 2010-11-08. https://web.archive.org/web/20101108051648/http://whqlibdoc.who.int/publications/2009/9789241598415_eng.pdf. 
  2. 2,0 2,1 2,2 2,3 2,4 2,5 2,6 2,7 et 2,8 "Diarrhoeal disease Fact sheet N°330". April 2013. http://www.who.int/mediacentre/factsheets/fs330/en/. Retrieved 18 June 2014. 
  3. 3,0 et 3,1 (en) edited by Basem Abdelmalak, D. John Doyle, Anesthesia for otolaryngologic surgery, Cambridge, Cambridge University Press,‎ 2013, 282–287 p. (ISBN 1107018676)
  4. 4,0 4,1 et 4,2 DuPont, HL (Apr 17, 2014). "Acute infectious diarrhea in immunocompetent adults.". The New England journal of medicine 370 (16): 1532–40. doi:10.1056/nejmra1301069. PMID 24738670. 
  5. (en) edited by Sarah Long, Larry Pickering, Charles G. Prober, Principles and practice of pediatric infectious diseases, Edinburgh, 4th,‎ 2012 (ISBN 9781455739851, lire en ligne), p. 96
  6. "Nation’s Emergency Physicians Announce List of Test and Procedures to Question as Part of Choosing Wisely Campaign". http://www.choosingwisely.org/nations-emergency-physicians-announce-list-of-test-and-procedures-to-question-as-part-of-choosing-wisely-campaign/. Retrieved 18 June 2014. 
  7. 7,0 et 7,1 "Global Diarrhea Burden". January 24, 2013. http://www.cdc.gov/healthywater/global/diarrhea-burden.html. Retrieved 18 June 2014.