Mobéko-likonzi mwa sika (Kongó-Kinsásá)

Mobeko Likonzi mwa sika (2006) ya Kongó-Kinsásá moye mondimami, motali makambo manene maye:

Democratic republic of the Congo: Coat of Arms
Democratic republic of the Congo: Coat of Arms

Mabi matali ekolo mpé bokonzi

kokoma

Mpo ya kolendisa bomoko bwa Ekolo boye bobebi na bitumba ndenge na ndenge mpé mpo ya kotonga bisika bia bwanya mpé bya botomboli mboka ike, bantoma bakaboli ekolo Kongo na bingumba 25, bakisa engumba ya Kinshasa, binso biye bizali na makoki ma komiyangela eyebani na mobeko mpé kosala misala milongobani mitangemi na Mobéko likonzi moye. Na botali makoki mana, bingumba bikosala misala misusu misengeli kosalema na Mbula Matari ya Ekolo, mpé kokabola misolo miyingeli na sanduku ya Ekolo na Mbula Matari zambi ya eteni ntuku minei likolo ya mokama (40%) mpo ya bingumba, mpé eteni ntuku motoba likolo ya mokama (60%) mpo ya Mbula Matari. Soki boyokani bozangi na esaleli kati ya Mbula Matari ya ekolo mpé bingumba, Ndako ya basambisi ba Mobeko Likonzi yango moko ezali na bokonzi bwa kobongisa likambo lina.

Na yango, bingumba bya ekolo bikonzami na Mbula Matari mpé Lingomba lya Bantoma ba bingumba. Engumba yoko yoko ezali na bituka bikonzami yango moko lokola vili, komine, seketele mpé sefeli. Lisusu, Mobeko Likonzi moye mondimi makanisi ma bonsomi mpé molobi: bokonzi bonso bouti na bana-ekolo mpo bango nde ntina ya ebandeli ya bokonzi. Bana-ekolo bakopesa makanisi ma bango na kati ya mangomba mayike ma politiki, maye mabatelami na Mobeko Likonzi moye mondimi ete kosala lingomba lya politiki se moko ezali lokola kobuka mobeko mwa koteka ekolo. Na maye matali bonsomi bwa ekolo, basali mibeko bandimi makanisi ma kozala na bonsomi se moko mpé kaka moko mpo ya bana Kongo.

Mambi ma bomoto, bonsomi bwa ntina mpé ntomo ya mwana ekolo mpé mambi ma leta

kokoma

Mosali mibeko azali lisusu kondima bopesi Ekolo Nsomi ya Kongo makoki ma bato mpé bonsomi bwa ntina engebene na mibeko mya solo mya molongo esili kondima. Na yango akotisi makoki mpé bonsomi bona na kati ya Mobeko Likonzi. Yango wana, zambi ya mbongwana ya mambi ma mokili, Mobeko Likonzi moye mokotisi makanisi manene ma sika matali bokokani bwa mobali mpé mwasi.

Mambi ma bobonsisi mpé esaleli ya bokonzi

kokoma

Bituluku bia bokonzi bwa sika na Ekolo Nsomi ya Kongo byango biye:

Makanisi manene maye mazali kokamba bobongisi bituluku bina mango maye.

  • 1. kobongisa esaleli elamu ya bituluku bia Leta
  • 2. koboya matata to mikakatano
  • 3. kotelemisa ekolo ya bosembo
  • 4. kopekisa masenginya ma koyangela ekolo na lolenge ya moto ye moko
  • 5. kopesa ndanga ya koyangela ekolo na ndenge ya malamu
  • 6. kopesa etumbu na moto nyonso asali mbeba
  • 7. kondima bokaboli bokonzi na ndenge ya likelemba na maponami.

Yango wana, eleko ya mosala mwa Mokonzi wa Ekolo ekoki kozonga se mbala moko, kasi lisusu Mokonzi wa Ekolo azali na makoki ma kobatela Mobeko Likonzi, bonsomi bwa ekolo, etando mobimba ya ekolo, bokonzi bwa ekolo, botosi mibembano mpé boyokani na molongo mpé akozala mobongisi mpé mosemboli esaleli elamu ya bituluku bya ekolo, na lisalisi lya Mbula Matari mpé na bososoli bwa Lingomba lya Bantoma.

Bikela bya solo biye, Mokonzi wa Ekolo akotia maboko mpo ya mambi matali Mbula Matari to maye makambemi na Baminisele, bisengeli kozwa elembo ya Minisele wa yambo mpé, ntango mosusu, ya Baminisele, baye basengeli kosalela mpé kondima mokumba mona liboso lya Lingomba lya Bantoma.

Mingi mpenza makambo matali bapaya, bobateli mpé bokengi bwa ekolo, maye mazalaki liboso se na maboko ma Mokonzi wa Ekolo, makomi mambi ma boyokani. Kasi, Mbula Matari, na bokasi bwa Minisele wa Yambo azali nkolo mpe motambwisi wa politiki ya ekolo, eye akobongisa na boyokani na Mokonzi wa Ekolo.

Azali na mokumba mwa kotanga misala mia ye liboso lya Lingomba lya Bantoma liye, lisanga, likoki kopesa ye etumbu na ndenge ya bopaleli ye. Lingomba lya Bantoma likoki lisusu kotatola libunga yoko yoko ya bakambi ba Mbula Matari na nzela ya mokanda mwa bokebisi.

Na bosangani na likita linene, Lingomba lya bantoma-basali mpé lya babongisi mibeko, lizali na makoki ma kofunda Mokonzi wa Ekolo mpé Minisele wa yambo liboso lya Ndako ya bazuzi ba Mobeko Likonzi, mingi mpenza na libunga linene lya boteki ekolo mpé boyebi mabe makoki kobebisa ekolo.

Epai mosusu, na ntina ya makoki ma bokonzi mapesami na basali mibeko mpé na makoki ma kolanda misala mia Mbula Matari, bantoma ba ekolo bazali o likolo lya mibeko te; matomba ma bango makoki kolongwa mpé lingomba lya bantoma likoki kokufa na mobeko mwa Mokonzi wa Ekolo, soki mikakatano mizali kosila te kati na bango mpé Mbula Matari wa ekolo.

Mobeko Likonzi moye mondimi lisusu bonsomi bwa bokonzi bwa bazuzi boye, basambisi banso bakambemi na Lisanga linene lya mambi matali bosembo lisangisi se basambisi mpe bakati makambo. Mpo ya bolamu bwa solo, bwanya mpe botambwisi na lombangu mikanda mia bato babuki mibeko, Ndako ya basambisi mpe bakati makambo ekabwani na biteni misato biye :

  • biyangeli bitali mambi ma bosambisi maye makonzami na ndako ya esambelo ya nsuka
  • biyangeli bia misala mia ekolo ekambemi na Lisanga lya leta
  • Ndako ya bosambisi mambi ma Mobeko Likonzi

Mabongisi ma ntina ma Mobeko Likonzi, makoyebisa polele ndelo ya misala mia Mbula Matari mpe bingumba mpe lisusu esika ya bokutani kati ya bingumba bibale bia leta.

Mpo ya kotia boyokani bolamu kati ya bingumba mpe Mbula Matari ya ekolo, likita lya bakonzi ba bingumba lisalemi na bokambemi bwa Mokonzi wa Ekolo oyo azali na mosala mwa kopesa toli na bingumba binso mibale.

Se bongo, lotomo ya boyokani kati ya bingumba bia ekolo lotindi kosala sanduku ya ekolo ya bokaboli malamu misolo, etiami na boyangeli bwa Mbula Matari ya ekolo. Na botalaka bonene mpe makambo ndenge na ndenge ma botomboli nkita mpe bomoi bwa bato maye Ekolo Nsomi ya Kongo ezali kokutana na yango, mosali mibeko asali Lisanga lya nkita mpe lya bato liye lipesami lotomo ya kopesa makanisi ma mambi ma nkita mpe ma bato na Mokonzi wa Ekolo, na lingomba lya bantoma mpe lya Mbula Matari ya ekolo.

Mpo ya kobatela bonsomi bwa Ekolo Nsomi ya Kongo, Mobeko Likonzi moye moponi bituluku mibale mpo ya lisalisi lya bonsomi bwa bato mingi mpenza Lisanga lya maponami na bonsomi lipesami seko manaka ma kobongisa maponami bakisa Lisanga linene lya lolaka, botali mpe bopanzi nsango, liye lizali na lotomo ya kopesa bonsomi mpe kobatela mambi na zulunalo mpe nzela inso ya bopanzi sango na bato banso engebene na botosi mibeko.

Mambi ma bobongoli mobeko likonzi

kokoma

Mpo ya kobatela mambi ma boyangeli ekolo mauti na bato, maye matiami na Mobeko Likonzi moye, zambi ya mikakatano mia bomoi bwa politiki mpe mia mbongwana ndenge na ndenge, mabongisi matali lolenge ya boyangeli ekolo mauti na bato, ya mobeko mwa boponi bwa bato banso, ya bingumba binso bimonana na Mbula Matari, ya motuya mpe eleko ya boumeli na mosala mwa Mokonzi wa Ekolo, ya bonsomi bwa bokonzi bwa kosambisa mpe kokata makambo, ya boyike bwa mangomba ma politiki mpe ma sendika, makoki ata moke te kobongwama.

Nkásá o libanda Wikipedia

kokoma