Mángwelé ma tetanɔ́si, eyebani lisusu bo anatoxine tétanique (TT), ezali mangwele oyo basalelaka mpo na komibatela na tetanɔ́si.[1] Na bomwana esengelaka kozwa dose mitano, mpe nasima kobakisa dose moko mosusu sima na mibu zomi nionso. Sima na bozwi dose misato pene batu nionso bazalaka immunisé.[1] Mpo na baye balandelaki mangwele nabango ya tetanɔ́si malamu te esengeli bazwa tonga na lobango nakati ya ngonga 48 sima na kozoka mpota.[2] Mpo na baye bazali na mpota ya risque monene mpe basilisi te kozwa mangwele nionso bakoki kopesa bango antitoxine ya tetanɔ́si. Esengeli kosala manso mpo ete basi ya zemi balandela malamu mangwele nabango ya tetanɔ́si mpe, soki te, koimmunisé bango ekoki kobatela bango na tetanɔ́si na mbotama ya mwana.[1]

Mangwele oyo eza malamu mpeza ezala na eleko ya zemi to mpo na baye baza na VIH/SIDA. Kotela mpe mpasi na esika eye babeti tonga ekomelaka kati ya 25 na 85% ya batu. Fièvre, koyoka bolembu, mpe mua mpasi na misunyi ya nzoto ekomelaka na se ya 1% ya batu. Ba réaction makasi ya ba allergie ekomelaka se ya mutu moko nakati ya batu 100,000.[1]

Bosangisi mangwele ya ndenge na ndenge mpo na tetanɔ́si esalemaka neti DTaP na Tdap oyo eza na diphthérie, mangwele ya tetanɔ́si na mangewle ya coqueluche, mpe DT na Td oyo eza na diphthérie na mangwele ya tetanɔ́si. DTaP na DT bapesaka yango na bana baye bazali na mibu na se sambo ebongo Tdap na Td bapesaka yango na na baye baza na mibu sambo to koleka.[3] Makoma na minuscule ya d na p eza mpo na kolakisa nguya ya diphtérie na ya mangwele ya coqueluche.[3]

Mangwele ya tetanɔ́si basalaki yango na mobu ya 1927 mpe ekomaki kozwama na Etats Unis na mobu ya 1940.[1][4] Bosaleli mangwele oyo esalaki ete motango ya 95% ya baye bazali na tetanɔ́si mokita.[1] Mangwele oyo ezali na Liste ya ba Nkisi ya Ntina ya Organisation Mondiale ya Santé, nkisi ya ntina mpeza oyo esengeli kozanga na ba lopitalo.[5] Talo mpo na kosamba na mipiko-mipiko eza kati ya 0.17 na 0.65 USD mpo na dose moko kotala na mobu ya 2014.[6] Na Etats Unis talo mpo na mangwele nionso ya tetanɔ́si eza kati ya 25 na 50 USD.[7]

References kokoma

  1. 1,0 1,1 1,2 1,3 1,4 et 1,5 "Tetanus vaccine: WHO position paper". Weekly epidemiological record 20 (81): 197–208. May 19, 2006. http://www.who.int/wer/2006/wer8120.pdf. 
  2. "Puncture wounds: First aid". Feb 4, 2015. http://www.mayoclinic.org/first-aid/first-aid-puncture-wounds/basics/art-20056665. Retrieved 6 December 2015. 
  3. 3,0 et 3,1 "Vaccines: VPD-VAC/Tetanus/main page". Centers for Disease Control. http://www.cdc.gov/vaccines/vpd-vac/tetanus/default.htm. Retrieved February 10, 2015. 
  4. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).
  5. "WHO Model List of EssentialMedicines". World Health Organization. October 2013. http://apps.who.int/iris/bitstream/10665/93142/1/EML_18_eng.pdf?ua=1. Retrieved 22 April 2014. 
  6. "Vaccine, Tetanus Toxoid". http://erc.msh.org/dmpguide/resultsdetail.cfm?language=english&code=TT00X&s_year=2014&year=2014&str=&desc=Vaccine%2C%20Tetanus%20Toxoid&pack=new&frm=VIAL&rte=INJ&class_code2=19%2E3%2E&supplement=&class_name=%2819%2E3%2E%29Vaccines%3Cbr%3E. Retrieved 6 December 2015. 
  7. Erreur Lua dans Module:Biblio/Commun à la ligne 29 : attempt to call local 'abr' (a nil value).