Floribert Bwana Chui bin Kositi
Naissance
Goma,(Drapeau de la République démocratique du Congo Republíki ya Kongó Demokratíki)
Décès (à 26 ans)
Goma,(Drapeau de la République démocratique du Congo Republíki ya Kongó Demokratíki)
Nationalité Kongó-Kinsásá

Floribert Bwana Chui bin Kositi abotami o 13 yúni 1981 na Goma na esita ya Kongó-Kinsásá. Azalákí elenge mosáli ya *douane óyo atɛlɛmaki mpó na kotɛmɛla kanyaka. Yangó wana babomaki yé na Goma o 7 yúli 2007.[1]

Lisoló na yé ezalí komonisa lolenge ya sika ya martyrme lokola mbeka ya bomoi ya kimia, oyo esalemaki mosika na matomba ya bapanzi sango, kasi oyo ezali koningana na bomoi ya bato mpe ya politiki ya ba Etats oyo kanyaka ekomi momesano. Pápa François asimbaki mpe likambo yango na mobembo na ye na Afrika na 2015, ntango elenge moko atunaki ye motuna oyo: “Okoki kolongisa kanyaka na likambo oyo ete bato nyonso bazali na kanyaka?” Ndenge nini biso baklisto tokoki kobundisa mabe ya kanyaka?”

Na eyano na ye, Pápa asimbaki makasi ete: “Kanyaka ekɔti na biso nyonso. Lokola sukali... Tango nionso tondimi "pinch", tobebisaka mitema na biso pe ndako na biso... Lokola na biloko nionso, esengeli osala début : soki olingi corruption te, obandi, pe sikoyo! Soki obandi te, mozalani na yo mpe akobanda te!”[2]

Bomoi ya Floribert Bwana Chui bin Kositi ekoki ko comprendre na histoire difficile ya Congo na tango na biso. Ezali lisolo mokuse oyo etondi na kondima kofanda na mboka oyo etondi na bomoto mpe bisika kitoko, kasi na makambo ya politiki mpe etondi na ba chocs. Akolaki na ntango ya kimya te mpo bitumba mibale ya makila ebimaki. Na mokolo ya 7 juillet 2007, babomaki ye na Goma mpo apekisaki boyei ya biloko ya kolia oyo ebebaki oyo ezalaki mabe mpo na santé ya population. Azalaki kaka na mbula 26. Na buku oyo elobeli ye ya Francesco De Palma ezali na antologie ya ba témoignages oyo etali Floribert lokola moto ya motema malamu oyo atikaki kondima te mpo na kobongola mokili (ya ye) na nzela ya kondima na Klisto. Mpamba te andimisamaki ete “moto azalaka mobola boye ata moke te na boye ete akoki te kosalisa moto oyo azali lisusu mobola koleka.” Kotangi lisolo na ye, moto amoni bokoli ya kati oyo ememaki ye na kosala na Biteyelo ya Kimya, na Orphelinat ya Baraza mpe na district ya Mabanga.

Floribert andimi nguya ya boyokani mpe alukaka bokutani. Sans ko négliger ba études na ye, oyo asilisaki na été 2006 na diplôme ya économie, asalisaki bana ya balabala. Na sima asalaka na Kinshasa na Office Congolais de Contrôle (OCC), société ya l’Etat oyo etambwisaka biloko oyo ezali koleka na Congo. Mwa moke na nsima, bamemaki Floribert na Goma, epai baboti na ye, fiancée na ye, baninga na ye mpe bana mingi ya balabala oyo bayebani mingi bafandaka. Kuna, liyoki na ye ya mokumba ekolaki. Akómaki koyeba mingi mokumba na ye lokola mondimi. Na nzela ya mosala asosolaki ete bomoi mpe bokolongono ya bato ezali na maboko na ye. En tant que commissaire ya ba réclamations, il fallait abebisa biloko ya kolia ebeba oyo esengelaki ko kotisama na Congo wuta Rwanda na Goma mpe oyo ezalaki ko respecter te ba exigences hygiéniques mpe commerciales ya loi.

Na nsuka ya sanza ya Yuni to na ebandeli ya sanza ya Yuli 2007, Floribert ayebisaki moninga na ye makambo ya nkuku ete: “Mbala mingi, ozalaka na mpasi mingi. Nalingi komitika te. Soki nabebisi te biloko oyo ezali mabe mpo na santé ya bato mingi, soki namitiki ete bázwa kanyaka, nalingaki kotɛka nyonso oyo nandimi, na nsima nalingaki kondima ete namitika ete bábeba. Nako continuer, na bloqué loso ebele oyo ebebi : okoki kotia population na danger te."[3]

Tála mpé

kokoma
  1. R. De Palma, Il prezzo di due mani pulite. Un giovane contro la corruzione nella Repubblica democratica del Congo, Milano, Paoline, 2015.
  2. Pápa Falaswa, «Discours na bilenge», na stade Kasarani, Nairobi (Kenya), o 27 Novɛmbɛ 2015; tala vatican.va/ 27 Novɛmbɛ 2015.
  3. J. M. Bergoglio, Guarire dalla corruzione, Bologna, Emi, 2013, 12.