« Joseph Kasa-Vubu » : différence entre les versions

Contenu supprimé Contenu ajouté
Esengo (ntembe | bíteni ya mosálá)
Aucun résumé des modifications
mAucun résumé des modifications
Mokɔlɔ́tɔ 1 :
'''Joseph {{smcp|Kasa-Vubu}}''', [[Mokambi-Ekólo]] wa Kongó-Kinsásá bandá [[1, yúlisánzá ya nsambo]] [[1960]] -tíí [[24, novɛ́mbɛsánzá ya zómí na mɔ̌kɔ́]] [[1965]]. Mokambi Bulamatari na yě azaláká [[Patrice Lumumba]].
(Mokambi Bulamatari na yě azaláká [[Patrice Lumumba]])
 
==Bomɔi bwa mòtò (En cours de traduction) ==
 
Abotamá na [[Dizi]] pɛmbɛ́ni ya [[Tshela]] na [[Mayombe]] (Bas-Congo), mokɔlɔ mwa yě mwa mbótama eyébani malámu tɛ́. Kozanga kozwa [[batísimo]] na mbótama esáláká 'te mokɔlɔ mwa yě mwa mbótama ekomama tɛ́ na mikanda mya lɛ́ta. Engɛ́bɛ́nɛ́ na maloba ma baníngá ba yě ba kelási mpé bamumpɛ́ ba lingómbá lya [[Scheut]] baye bayébaka yě lokóla moyékoli, mobú mwa mbótama ya yě mokoki kozala nzínganzínga ya mobú mwa [[1915]], kasi na 1913 tɛ́ engɛ́bɛ́nɛ́ na makomi maye mazalí kotála bomɔi bwa yě. Moyékoli na kelási ya bónganga Nzámbe o [[Mbata-Kiela]], bamumpɛ́ bamɔnɔ́kɔ́ na lombango 'te yě azalí na nsɔ́mí míngi eye elongobani tɛ́ na mosálá mwa bónganga Nzámbe. Bomoyíbisáká 'te ékosɛ́ngɛlɛ alanda kelási ya bato bansɔ, mpé akɛndɛ́kɛ́ (akotɔ́kɔ́) kelási ya bato bansɔ mpé ayékoláká makambo matáli bokanisi (philosophie).
 
Nsima ya bosilisi kelási ya yě, yě akómáká molakisi kasi amɔnɔ́kɔ́ 'te lifuta lya yě lokóla molakisi ekokanáká sɔ́kɔ́ mokɛ́ tɛ́ na kelási iye yě akɔtɔ́kɔ́. Akotíka mosálá mwa molakisi, mpé akɛndɛ́kɛ́ kosála na lingómbá lya mombɔ́ngɔ ya mabáyá liye libêngami Agrifor mpé nsima ya kosála na lingómbá lîná , asáláká lokóla mosungi *comptable na mbulamatari ya koloni na *departement eye etáli makambo ma [[mosɔ́lɔ]]. Ekomi yě na [[Léopoldville]]_nkómbó ya kala ya [[kinsásá]], akozwa *infuence ya makanisi ndéngé na ndéngé ma lisangá lya bato baye babêngi [[kaláka|bakaláka]] baye baútaka na bingúmba ndéngé na ndéngé ya ekólo Kongó-Kinsásá.</br>
 
 
Yě, ayébanáká míngi o miso mya bato lokóla mokambi mwa lingómbá lya politíki liye ebêngami [[Boyókani bwa bakɔ́ngɔ]], na lokóta la [[lifalansé]] balibêngi "Alliance des Bakongo", [[Boyókani bwa bakɔ́ngɔ|ABAKO]] na bokúsé.
Ligne 17 ⟶ 18 :
==Mosálá mwa politíki (En cours de traduction) ==
 
Ntángo Kongó-Kinsásá ezwakáezwǎká bonsɔ́mí (lipanda) na mobú mwa 1960, Kasa-vubu apɔ́nɔmɔ́kɔ́ na *assembly ya sika ya Kongó-Kinsásá lokóla mokonzi ekólo mpé afándadaka na kiti ya bokonzi na mokɔlɔ mwa ntúkú mísáto, sánzá ya motóbá, mobú mwa 1960.
 
Ntángo ekɛ́ nsima ya mbotámá ya repubiliki ya sika, Yangó ekutanaki na mikakátano míngi, ngambo mɔ̌kɔ́ ezaláká na mikakátano mya politíki mpé ngambo esúsu, mikakatano na mapinga ma basɔ́dá mpé ngambo esúsu bitumba ya bokaboli mbóka na biténi. Na ntángo êná kaka, mbulamatari ezaláká kotambwisama malámu tɛ́ mpó na bozángi boyókani eye ezaláká na kati ya mokonzi-ekólo Kasa-vubu mpé moyangeli wa yě wa yambo [[Patrice Lumumba]]. Tála [[Matatá na Kongó nsima ya lipánda]].