SNCC (Société Nationale des Chemins de Fer congolais ), ezali entreprise publique ya l'Etat. Ba activites ya exploitation na yango ezali na Est mpe na Sidi ya R.D. Kongo. Ezali mpe kosala exploitation na transport fluvial, routier mpe na exploitation portuaire.

Arrivée du premier train à Kindu après réhabilitation des voies en 2006
Locomotive à 750mm à Ndolo en 1898.

1890 – 1920 kokoma

Katanga kokoma

Na 1891, Compagnie ya Katanga esalemaki mpo esalaka exploration na sud ya Etat indépendant ya Congo. Na yango, Compagnie ya Katanga e signaki ba conventions mibale na Etat indépendant ya Congo na mars 1891 mpe na mai 1896. Ba conventions yango ezalaki ko imposer na compagnie ya Katanga ba obligations ya occupation na mise en valeur ya Katanga. En contre partie, l'Etat indépendant esengelaki etikela compagnie ya Katanga na totale propriété ya mabele domaniale oyo ezali na territoires oyo convention ya 1891 ezali kolobela. Donc, pendant 99 années, compagnie ya Katanga esengelaki e exploiter sous-sol ya mabele oyo bapesi ye selon convention signee. Neti ezalaki mua mpasi mpo na ko fixer ba limites ya mabele, l'Etat indépendant na compagnie ya Katanga bayokanaki ete batiya bozui na bango elongo (fusion de biens). Na yango bayaki kosala comité spécial ya Katanga, CSK, na 1900. CSK nde esengelaki e gérer ba biens na bango mpe ba bénéfices ekokende na prorata ya 2/3 mpo na L'Etat mpe 1/3 mpo na Compagnie ya Katanga.

Kotia territories oyo Etat indépendant epesaki na Compagnie Katangaise ezalaki likambo moke te pamba te ba frontières ya sud ya Katanga na ya nord ya Zambie ekatamaki naino malamu te. Nde na 1896, ba frontières ya Katanga ekatamaki mpe mabele oyo ebandaki kaka kozela création ya CSK na 1900.

Kasi neti Katanga ezalaki mosika na Océan Atlantique, CSK ezalaki na likanisi lya kotonga chemin de fer tee na Matadi mpe na kobimisa ba minérais na Congo vers la Belgique. Kasi na sud na Rhodésie (Zambie),na Bulawayo chemins de fer ya Afrique du sud esilaki kokoma mpe na Mozambique oyo ya kuna ebandaki kokoma tee na Salisbury. Nde wana liaison ya Salisbury na Bulawayo eye kosalema. Yango wana Etat indépendant eyaki ko signer convention na Robert Williams, industriel britanique, mpo na kotonga chemins de fer oyo ezali kowuta na sud ya Katanga (kati na Rivière Lufira na Lualaba) mpe kokutana na chemin de fer ya Rhodésie.

 
Locomotive à 750mm à Ndolo en 1898.

Na 1902, compagnie de chemin de fer du Katanga, CFK, esalemi na Comité spécial ya katanga. CFK ezalaki na but ya kokutisa région ya Lubumbashi (Elisabethville) na ya Zambie (Rhodésie) du Nord na nzela ya Sakania, mpe kotongisa port na Fleuve Congo na niveau ya Lualaba mpo na kosala liason na Bukama.

CFL kokoma

Le, 4 janvier 1902, création ya Compagnie ya Chemin de fer du Congo Supérieur aux Grands Lacs africains, CFL. Compagnie oyo esalemaki mpo na ko relier fleuve Kongo na niveau ya Kisangani na etímá Mobutu (etímá Alubɛ́) mpe ko relier Lualaba na lac Tanganyika. Kasi bakonzi bayaki lisusu kobongola mission na yango. Sima mikolo yango nde KDL eyaki kosala. Yango ebandaki ko exploite ba lignes oyo:

soit total ya 1.085 km.

Na Voies fluviales:

Soit un total ya 1.025 km.


Na Voies maritimes ya Tanganyika:

  • Kalemie (Albertville)- Kigoma - Kalundu, 345 km
  • Kalemie (Albertville)- Moba - Moliro, 320 km

Soit total ya 665 km.

Na ba nzela (routes) :

Soit total ya 329 km.

Na 1906, mbotama ya CSK, filiale ya BCK, spécialisée na recherche minière. L'État Indépendant na Société Générale de Belgique basali Compagnie du Chemin de fer du Bas-Congo au Katanga, BCK mpo esala liaison ya Bukama na Bas Congo par chemin de fer mpe kosala ba recherches minières na ba régions oyo.

Na 1911, bakangisi ligne oyo ekeyi na Océan Atlantique na chemin de fer ya Benguela Na 1919, BCK esali société minière. Mission na yango ezali ya kosala exclusivement recherche minière. Société filiale oyo ebengami Société minière du BCK.

1920 – 1960 kokoma

Wɛlɛ kokoma

Le, 7 mai 1924, création ya Vicicongo mpo na ko exploiter lignes ya chemin de fer ya Uele, Ituri na Kivu septentrional. Chemin de fer à voie étroite na 842 km kolongua libongo ya Aketi, tee na terminus ya voie navigable ya Itimbiri. Kolongua wana tee na Mungbere na 685 km, kuna nde ekabuani na biteni bibale : Bondo 151 km na Titule 290 km.

Vicicongo ebimisaki likanisi lya Messageries Automobiles du Congo (MAC) mpo na ko utiliser ba routes. Ekomaki na 450 mituka oyo ebandaki kotambola dix millions de km na mbula.

Vicicongo ebandaki mpé ko exploiter libongo lya Aketi na rivière Itimbiri mpé na libongo lya Kasenyi na etímá Mobutu (Etímá Alubɛ́).

Vicicongo ezalaki na direction générale na Aketi na ba agences na Isiro, Bunya, Kisangani, Butembo na Buta.

Na 7 mai 1924, création ya Société pour la construction et l'exploitation des lignes secondaires vers les grandes voies de communication.

Na 1937, réseau ferroviaire emati na Nord ya fleuve Kongo mpé e totalisé 842 km. Ba lignes iye : - Aketi - Andudu, 685 km - Komba - Bondo, 121 km - Liénart - Titule, 31 km Réseau routier ezalaki na 21.000 km.

Katanga kokoma

Léopoldville-Katanga- Dilolo kokoma

Na 1927, Société de chemin de fer Léopoldville-Katanga- Dilolo (LKD) esalemi. Neti l'Etat ezalaki actionnaire majoritaire, asali concession ya ba lignes misato:

  1. Bukama - Ilebo (Port Franqui);
  2. Tenke - Dilolo;
  3. Ilebo (Port Franqui) - Kinsásá (Léopoldville).

Sur le plan financier, opération oyo ezalaki asticieuse mpo esalaki ete misala mikende liboso mbangu mbangu mpo ba lignes misato oyo ezalaki naino sous chantier. Neti exploitation ezalaki confiée na BCK, yango ezalaki na makoki ma kobimisa mbongo oyo ekokaki kosilisa misala noki.

Katanga-Dilolo-Léopoldville kokoma

Na 1952, compagnie de chemin de fer Katanga-Dilolo-Léopoldville (KDL) ebotami sima ya bokangisi LKD na CFK. KDL azali concessionnaire exclusif ya voies ferrées ya Katanga mpe BCK azali entrepreneur mpe exploitant ya chemin de fer.

Messageries Automobiles du Sankuru (MAS) Yango ebandaki kosala exploitation commune ya ba routes na BCK, na Kasaï, Sankuru, Katanga (Kananga "Luluabours", Kabinda na Kamina) mpo na ko relier ba gares oyo ezalaki relier na train te.

SOTRANSCONGO, yango ebandaki ko exploiter ba routes ya Equateur na Mongala na Ubangi.

1960 - 2009 kokoma

Na 1961 baye kokabola BCK na biteni bibale: BCK oyo ezalaki ya droit Belge na BCK ya sika ya droit Congolais

Na 1970, gouvernement ekotisi BCK ya droit congolais nakati ya compagnie ya chemin de fer Kishasa-Dilolo-Lubumbashi,

Société Nationale des Chemins de Fer du Zaire kokoma

le, 2 décembre 1974, l'Etat Zairois e créer Société Nationale des Chemins de Fer du Zaire yango esangisi ba compagnies oyo : La compagnie de chemin de fer Kinshasa- Dilolo-Lubumbashi, KDL, Chemin de fer Matadi- Kinshasa, CFMK, Office Zairois de chemin de fer des Grands Lacs, OZCFL, chemin de fer de Mayombe, CFM, chemin de fer vicinaux du Zaire, CFM.

le, 3 Avril 1991, gouvernement ekaboli Société Nationale des chemins de fer du Zaire, SNCZ, suite na nationalisation na regroupement ya ba Sociétés des chemins de fer. Ekaboli yango na SNCZ - Holding (chargée ya ba réformes na secteur ya transport ya chemin de fer mpe na ba réformes ya ba Sociétés oyo esengeli ko exploiter ba réseaux ferroviaires, routiers, fluvials na lacustres plus exploitation portuaire) na ba filiales na yango, Société des chemins de fer de l'Est, SFE, Office des chemins de fer du Sud, OCS, Office des chemins de fer des Uele, CFU.

le, 19 Août 1994, gouvernement esengi na Ministère ya Transports na communications diagnostic. Na yango, Ministère eye ko charger Société Belge Transurb Consult esala diagnostic ya Office des chemins de fer du Sud na Société des chemins de fer de l'Est na tina ya ko proposer plan ya redressement ya réseau interconnecté.

le, 17 Octobre 1994, Ministère ya Transport et communications endimi proposition ya Transurb (Société Conseille) mpo e privatiser gestion ya exploitation ya chemins de fer.

le, 7 Janvier 1995, Société Conseille Transurb na Spoornet (division chemin de fer ya entreprise publique ya Afrique su Sud Transnet) eye kosala Société ya droit sud-africain na kombo ya Comazar.

le, 23 Février 1995, SNCZ na Comazar ba signer accord-cadre oyo ezali koloba ete Comazar ezali Holding ya ba Sociétés d'exploitation SFE na OCS.

Sizarail kokoma

le, 24 Mars 1995, Gouvernement eye kondima basala Société de droit Zaïrois na kombo ya Société Interrégionale Zaïroise du rail, SIZARAIL. Gouvernenment eye koboma SCNCZ- Holding na ba filiales na yango. Tango ebomi yango eye kopesa exploitation nioso ya chemins de fer na SIZARAIL, oyo e signaki na yango accord-cadre portant cessation de l'exploitation des chemins de fer.

le, 26 Mai 1995, signature ya statut ya SIZARAIL na ba actionnaires oyo: COMAZAR 51%, SNCZ 20%, GECAMINES 12%, Banque commerciale Zaïroise, BCZ 10%, MIBA 7%.

le, 1 juillet 1995, SIZARAIL aye ko reprendre gestion ya réseau interconnecté na durée ya 5 ans

le, 4 Octobre 1995, ministre ya transport a signer décret ya constitution ya SIZARAIL

Le, 1 Novembre 1995, baye koboma SNCZ,SFE, CFU, na OCS. Pe bazui ba actifs, passifs, droits et obligations ya SNCZ, SFE, CFU, OCS ba memi yango na SIZARAIL.

Après Le, 17 Mai 1997, tango Kabila akotaki, azongisi SIZARAIL compagnie nationale. Mpe sima ya ba sanza aye kokangisa aministrateur délégué ya Société oyo, mpe gouvernement eyaki kozongisa Société Nationale des chemins de fer du Congo

SNCC kokoma

Ba lignes ya SNCC na ba mbula etongamaki

1. Chemins de fer Vicinaux du Congo - AKETI-MUNGBERE - 1925-1937

2. Chemin de Fer du Kivu - KALUNDU-KAMANIOLA - 1929-1931

3. CFL - Ligne STANLEYVILLE-PONTHIERVILLE - 1903-1906

4. CFL - Ligne KINDU-KONGOLO - 1906-1910 : Kindu, Lueki, Lowe, Kimbombo, Malela,Loengo, Kibamba, Lubunda, Kongolo

5. BCK - Ligne SAKANIA-BUKAMA - 1909-1918 :Sakania, Mokambo, Musoshi, Lumata, Lubumbashi, Tumbwe, Luishia, Likasi, Fungurume, Tenke, Lubudi, Kalule Nord, Bukama.

6. CFL - Ligne KABALO-ALBERTVILLE - 1911-1915 : Kabalo, Luizi, Mulongo, Nyunzu, Nyemba, Kalemie (Albertville)

7. BCK - Ligne BUKAMA-PORT-FRANCQUI - 1923-1928: Bukama, Kabondo Dianda, Kamina, Zaila, Tshipasa, Kaniama, Mwene Ditu, Kamponde, Tshimbulu, Fwamba, Tshikula, Tshikaji, Kananga, Demba, Kakenge,Mweka, Ilebo (Portfranqui)

8. BCK - Ligne TENKE-DILOLO - 1928-1931 : Tenke, Kasanfu, Kolwezi, Mpala, Lufutu, Muthsathsa, Kasanji, Malonga, Divuma, katoka, Dilolo.

9. CFL - Ligne KONGOLO-KABALO - 1937-1939 : Kongolo, Lukuga, Kabalo

10. BCK-CFL - Ligne KAMINA-KABALO - 1952-1956 : Kamina, Pidi, Kabongo, Lenge, Kabalo

SNCC ekabuami na ba régions:

  • région ya nola, siège na Kananga
  • région ya sidi, siège na Likasi
  • région ya monyɛlɛ (Ɛ́sita), siège na Kalemie
  • région ya centre, siège na Kamina
  • région ya nola-monyɛlɛ, siège na Kindu)

Direction générale na Lubumbashie.

SNCC ezali na 4.007 bakilomɛtɛlɛ ya voies ferrées kaka 858 bakilomɛtɛlɛ nde ezali électrifiés.

Résau kokoma

 
Matadi-Kinsásá: Changement de voie de 750 mm à 1067 mm.

Ecartement: 1,067 mɛtɛlɛ:

  • Chemin de fer Matadi-Kinshasa: Matadi, Lufu, Songololo, Kimpese, Lukula, Mbanza Ngungu,Kisantu, Madimba, Sona-bata, Kasangilu, Kinshasa.
  • Chemin de fer Lubumbashi - Ilebo: Lubumbashi, Likasi,Tenke, Lubudi, Luena, Bukama, Kabondo Dianda, Kamina, Zaila, Tshipasa, Kaniama, Muene-Ditu, Kamponde, Tshimbulu (Dibaya), Fwamba, Tshikula, Tshikaji, Kananga, Demba, Kakenge, Mweka,Ilebo.
  • Chemin de fer Kamina-Kindu: Kamina, Kabalo, Lubanda, Nyangwe, Kimbombo, Kindu.
  • Chemin de fer Kamina-Dilolo: Kamina, Kabondo Dianda, Bukama, Lubudi, Tenke, Kolwezi, Muthsathsa, Kasanji, Malonga, Divuma, Katoka, Dilolo
  • Chemin de fer Kabalo-Kalemie: Luizi, Nyunzu, Nyemba, Kalemie

Écartement: 1,00 mɛtɛlɛ:

  • Chemin de fer Ubundu-Kisangani: Ubundu, Maliabo, Biaro, Kisangani

Ecartement : 0,60 mɛtɛlɛ:

  • Chemin de fer Bumba-Aketi-Isiro-Mungbere : Bumba, Aketi, Dulia, Kotiki, Buta, Rubi, Mawa, Isiro, Kandao, Mungbere
  • Chemin de fer Bumba-Aketi-Bondo: Bumba, Aketi, Likati, Bondo

Ecartement 2 balokolo = 0,615 m:[1]

  • Chemin de fer Boma-Tshela: Boma, Lemba, Lukula, Loango, Luvu , Tshela

Ba nzela nionso ya train ezali ya voie unique.

SNCC ezali na effectif ya 14.300 agents parmis lesquels 185 directeurs. Etikala na 8 locomotives électriques, 11 locomotives diesel na 3 locomotives de manœuvres na moins de 200 voitures ya ba voyageurs na marchandises et quelques centaines ya ba wagons commerciaux epola et ezali na état moko déplorable.

Tala mpe kokoma

  1. Charles Blanchart: Le Rail au Congo Belge 1945-1960. Brussel: Maosin, 2008.