Mpasi kouta na bolei ezali mpasi ya bongo kolandana na kozanga kolia malamu mbala na mbala oyo ememaka mikakatano na nzoto to na bongo ya moto. Yango emonanaka na ba nzela ndenge na ndenge, oyo ekoki kozala mpasi ya kolia kolekisa ndelo oyo esalaka batu kolia bilei ebele mpeza na ngonga moke, anorexie mentale oyo esalaka batu kolia bilei moke mpeza na yango kozalisa bango na kilo ya nzoto moke, bulimie oyo esalaka batu kolia mingi mpe na sima koluka ndenge ya kobimisa biye baliaki, pica oyo esalaka batu kolia biye biliamaka te, mérycisme oyo esalaka batu kozongisa bilei, mpasi kouta na koboya/komipekisa kolia oyo esalaka batu bazanga mposa ya kolia, mpe kozala na mulongo ya ba mpasi misusu kouta bolei. Mpasi ya anxiété, depression, mpe toxicomanie yango emonanaka mingi epayi ya batu baye bazali na mpasi kouta na bolei. Bampasi oyo esangani te na obésité.[1]

Ntina ya mpasi kouta na bolei eyebani mpeza malamu te.[2] Ezala bafacteur génétique to ya environnement yango nionso emonani ezali na maye esalaka.[2][3] Bomoto boye bosalaka ete batu balinga kozala na nzoto mike endimami ete yango mpe ememaka mikakatano ya mpasi kouta na bolei.[2] Na ndakisa, mpasi kouta na bolei esimbaka 12% ya babini malinga.[4] Baye bazwaki likama ya abus sexuel bakoki mpe kozwama na mpasi kouta na bolei.[5] Ba mpasi misusu neti pica na rumination esalemaka mingi epayi ya batu baye bazali na maladies mentales. Diagnostic ya ba mpasi kouta na bolei esalemaka bobele mpo na mpasi moko na mbala.[1]

Ba mpasi ndenge na ndenge kouta na bolei ekoki kosalisama na nzela ya traitement reatment. Yango ekoki kozala ba suivis, kolia malamu, mpe bokitisa makasi maye masalamaka na boluki ndenge ya bobimisi bilei na nzoto. Mingi mingi mpeza esengelaka te moto alalisama na mbeto ya lopitalo. Bakoki kosalela nkisi mpo na kosalisa na mikakatano misusu miye milandanaka nayango.[3] Uta na mibu mitano, pene ya 70% ya batu baye baza na anorexie mpe 50% ya batu baye baza na bulimie babikaka. Libiki ya baye bazwumi na mpasi ya kolia kolikisa ndelo eyebani malamu te mpe emonani neti eza 20% kino 60%. Ezala anorexie to bulimie yango nionso ebakisaka nzela ya likama na liwa.[6]

Na ba pays développés mpasi ya kolia kolekisa ndelo etungisaka pene ya 1.6% ya basi mpe 0.8% ya mibali na mobu songolo. Anorexie etungisaka pene ya 0.4% mpe bulimie etungisaka pene ya 1.3% ya bilenge basi na mobu songolo.[1] Na eleko mobimba ya bomoyi kino 4% ya basi bazwamaka na anorexie, 2% bazwamaka na bulimie, mpe 2% bazwamaka na na mpasi ya kolia kolekisa ndelo.[6] Anorexie na bulimie ezwamaka mingi mpeza pene ya mbala zomi epayi ya basi koleka mibali.[1] Mingi mingi ebandaka na eleko ya suka ya bomwana to na ebandeli ya bokolo.[3] Taux ya ba mpasi misusu kouta na bolei eyebani malamu te.[1] Taux ya ba mpasi kouta na bolei emonani neti eza na se na ba pays en voie de développement.[7]

References kokoma

  1. 1,0 1,1 1,2 1,3 et 1,4 (en) American Psychiatry Association, Diagnostic and Statistical Manual of Mental Disorders, Arlington, 5th,‎ 2013, 329–354 p. (ISBN 0890425558)
  2. 2,0 2,1 et 2,2 Rikani, AA; Choudhry, Z; Choudhry, AM; Ikram, H; Asghar, MW; Kajal, D; Waheed, A; Mobassarah, NJ (October 2013). "A critique of the literature on etiology of eating disorders.". Annals of neurosciences 20 (4): 157–61. doi:10.5214/ans.0972.7531.200409. PMID 25206042. 
  3. 3,0 3,1 et 3,2 "What are Eating Disorders?". http://www.nimh.nih.gov/health/topics/eating-disorders/index.shtml. Retrieved 24 May 2015. 
  4. Arcelus, J; Witcomb, GL; Mitchell, A (March 2014). "Prevalence of eating disorders amongst dancers: a systemic review and meta-analysis.". European eating disorders review : the journal of the Eating Disorders Association 22 (2): 92–101. doi:10.1002/erv.2271. PMID 24277724. 
  5. Chen, L; Murad, MH; Paras, ML; Colbenson, KM; Sattler, AL; Goranson, EN; Elamin, MB; Seime, RJ et al. (July 2010). "Sexual Abuse and Lifetime Diagnosis of Psychiatric Disorders: Systematic Review and Meta-analysis". Mayo Clinic Proceedings 85 (7): 618–629. doi:10.4065/mcp.2009.0583. PMID 20458101. 
  6. 6,0 et 6,1 Smink, FR; van Hoeken, D; Hoek, HW (November 2013). "Epidemiology, course, and outcome of eating disorders.". Current opinion in psychiatry 26 (6): 543–8. doi:10.1097/yco.0b013e328365a24f. PMID 24060914. 
  7. Pike, KM; Hoek, HW; Dunne, PE (November 2014). "Cultural trends and eating disorders.". Current opinion in psychiatry 27 (6): 436–42. doi:10.1097/yco.0000000000000100. PMID 25211499.