Emmanuel Bamba († 02 june 1966) yé abandákí carrière na yé na crédit foncier ya Léopoldville mpé sima, ayaka kokoma Sénateur, élu ya ABAKO, na Léopoldville, Ministre ya Finances (may 1962 tee na yúni 1964) na gouvernement ya Cyrille Adoula mpé akomákí lisúsu Sénateur na ba élections ya 1965. Azalákí profondément croyant mpé kimbanguiste devant Nzámbe. Ayaki kosála aile mosúsu ya église kimbanguiste na 1962.

Les pasteurs bakongos le 29 mai 1966 kokoma

Pɔ na ba pasteurs bakongos na Kinsásá, nionso bayebaki eté Emmanuel Bamba azalákí pris au piège d'un complot ya Mobutu na son entourage. Míngi pe bakimaki na Brazzaville, pɔ na bangó, lokola tribalisme ezalákí makasi na tángo wana, eté Mobutu alingí na sima ya Emmanuel Bamba, kokanga ba pasteurs nionso ya bakongos. Papá géniteur óyo ya ngai, Révérend Daniel Nima Kizubanata alobákí boye na Kintandu, (en dialecte de kikongo): «Mobutu bu kakengi Manueli Bamba, si katukanga betukulu. Mboti ngia zuama kuna Brazzaville»... Tángo ayebisakí ngai yangó, tozalakí na Antoine Kingotolo (L'homme du 4 janvier 1959) na mbóka Manenga! Atalí Antoine Kingotolo, ayebisi yé boye: «nge Antoine, zayisa Mumbamuna (ancien sénateur et député) yé Nzeza-Nlandu vo munu mukuenda ngina…»

Jugement na camp Lieutenant-colonel Kokolo 30 mai 1966 kokoma

Sango ya jugement wana eyebanaki na ba sodá nionso. Óyo bawutaki na province ya Bas-Congo, balingaka kosala trouble pɔ na ko contester en faveur ya Emannuel Bamba. Na tángo wana, ngai nazalakí nanu adolescent, babokoli ngai na Commandant André Masamba. Biso nionso, bána ya ba sodá na camp Kokolo tozalákí présent. Elokó ekamuisakí ngai na tángo wana, na mitunakí boye: pɔ na níni, tozalí na káti ya camp militaire d'infanterie mais disposition de sécurité ezalí assuré na ba bataillons ya ba parachitistes (ba berêts rouges) ya Binza na camp Thsatshi?

Tozalakí kozela, kinó ba yé na ba prévenus… Bakonzi óyo basámbisaka bangó, biso bána ya ba sodá toyébaka bangó. Jugement wana esalemakí na bâtiment ya Centre Supérieur Militaire, à côté ya salle ya cinéma ayo tǒ surnommaki «ciné molunge». CSM ezalákí presue devant à gauche ya grand bâtiment dit "groupement", óyo etalisi na 2ème entrée ya camp óyo ekeyi vers le camp des officiers, puis vers "building royal".

Sango epanzanakí eté ba koboma bangó o 2 yúni 1996. O 1 yúni, nakendekí na pont Gaby kotála ba installation óyo ezalákí kosálama na "place de la cité", esika ba dansuers traditionnels ne ba luteurs bazalakí kosála ba spectacle na bangó. Bato míngi bakanisaka babomela bangó na emplacement ya "stade des martyrs"; non, na "place de la cité" na pont Gaby…

2 yúni 1966 kokoma

Namibongisamaki pɔ na kokende kotála ndenge pendaison ekosálama. Mama na ngai apekísí ngai nakende. Pe ayebisi ngai: Emmanuel Bamba azalí camarade ya tatá na yo… kokende te! Yangó nde eyakí ko convaincre ngai, pe nakendeki te.

Mutu ya libosó batiaki singa ezalákí Évariste Kimba. Ndenge basalelaki mabaya óyo bamatisaki batu ezalákí kokamua. Sima ya tubela, bamatisi Kimba wana, mutu na káti ya cagoule. Tángo ba sodá ba actionner système ya mésa wana, efunguami, etiki Kimba dans le vide, nzotu ezalí kodiembela na singa. Bobozo apesa mitíndo que sima ya 20 minutes nde doktolo ya Armée akoya kotála soki mutu awe. Pire, Bamba, Alexandre Mahamba na Jérôme Anany bafándisi bagu na camion ya ba sodá bazali kotálisa bango ndenge Kimba azalí koleka. En suite, bakumbi Emmanuel Bamba, sima Anany mpé basukisi na Mahamba. Sika tángo ekomí tour ya Mahamba, likolo ekomí koyínda, tángo káka batie yé singa na kingo mpé mabaya wana efunguami, tourbillon móko ya munene esáli wana ya makasi mpe ekumbi mpe ekueyisi batu.

Pɔ na ngai óyo nakendeki te, namonaki batu bazalákí kokíma pona kozonga na camp Kokolo. Bangó nde bayebisaki ngai eté mabele eningani na place de la cité, epesákí panique pe bato nionso bakomaki kokíma na mpé ba sodá lokola!

Tála mpé kokoma