Emil Saidi Balikwisha, abotama le 05 mars 1989 na Butembo na etuka ya Nord-Kivu, azali moto ya politiki ya ekolo Congo.

Na janvier 2024, aponami député provincial na Assemblée provinciale ya Nord-Kivu na territoire ya Beni mpe député national ya province ya Nord-Kivu na Est ya RDC.

Lisolo ya bomoi

kokoma

Mosala na ye ya politiki

kokoma

Ebandeli

kokoma

Mosala na ye ya politiki ebandaki lokola député provincial na 2018, esika amonanaki na komipesa na ye mpo na bokolisi ya mboka mpe bokengi na etuka oyo ezalaki na mikakatano minene, na ndakisa mobulu ya bituluku ya basimba minduki.

Mobongisi mibeko ya mboka

kokoma

Na 2024, aponami député national, Saidi Balikwisha ayebani mpo na lisikulu na ye ya kosenga lisungi na mabongisi ya Président Félix Tshisekedi, mingimingi na mbongwana mpo na kimya na Beni mpe kobongisa bomoi ya bato ya mboka. Elendisi lolenge ya kotonga mpo na koyanola na mikakatano ya bokengi, mbala mingi na lolenge ya mabe, mpe elendisi milende ya mampinga mpo na kotya kimya na etuka.

Komipesa mpe molende

kokoma

Saidi Balikwisha ayebani mpo na molende na ye ya kimya mpe ya bokolisi na Nord-Kivu, mingimingi na bisika oyo bitumba bizali, lokola Beni. Komipesa na yango esimbami na makambo mingi ya minene:

  1. Lisungi mpo na kimya mpe bokengi: Balikwisha azali kosala makasi mpo na stabilisation ya bituka oyo ebebisami na bitumba ya bituluku ya basimba minduki, mingimingi ADF. Alendisi ba efforts ya ba Forces armées congolaises (FARDC) mpe asengi na batu ba tika ko diabolisa situation ya sécurité, tout en insistant na ntina ya collaboration ya malamu kati na batu na bakonzi.
  2. Elendiseli na bomoko ya ekolo: Alendisi mbongwana oyo Président Félix Tshisekedi abandisi, ata mpe kokata boyokani na ba coalitions ya politiki oyo ye amoni ete ekoki kosala te, lokola FCC. Balikwisha asengi na bana mboka bazala na bomoko na nsima ya mikano ya mbulamatari mpo na kokolisa bokende liboso mpe kobongisa bomoi ya bato na bamboka ya zamba mpe na bingumba.
  3. Kotombola bokóli ya mboka: Azali kosangana na misala mya kobongisa ba infrastructures ya mboka, bomoi ya basali bilanga, mpe bozui ya mateya na etuka na ye. Alendisi bilenge basala mosala makasi mpo na kotonga lobi ya malamu mpo na mboka na bango.
  4. Lisalisi mpo na bilenge mpe bokambi ya mboka: Balikwisha azali ndakisa mpo na bilenge ya etuka na ye. Abongisaka bokutani na balandi na ye mpo na kolendisa bango na kotia makanisi ya bolingo ya mboka mpe ya kotonga liboso ya mikakatano ya socio-économique mpe ya bokengi.

Komipesa na ye epusami na mposa ya komona ete Nord-Kivu ekoma esika ya kimya mpe ya bomengo. Atikalaka pene na bato oyo baponi ye na ndenge akendaka mbala na mbala kotala bango mpo na koyeba bamposa na bango mpe kolandela matomba na bango na parlema.

Bikakoli o molɔngɔ́ ya bilɔ́kɔ

kokoma

 

Makomi na nse ya lokasa

kokoma