Ekokí kokabama na bangu nyoso mpé ewuti na vilúsu óyo ebengami na monoko y aba paya: vilúsu kolokoto zoster.

Moto nyoso akokí kozwa bokɔnɔ ya nzóto ya soso. Moto óyo azwaki mangwele, akokí ko zuwa bokɔnɔ ya nzóto ya soso nabopete nyoso te kási akokí mpé kozwa ya ngo kási na ndakisa óyo ezali penzá míngi te.

Bilembo

kokoma
  • Makwanza
  • Nzonto moto
  • Bolembu
  • Bozangi posa ya kolía

Nzonto moto, koyoka bolembu, kozanga posa ya kolia mpe mutu pasi ekoki komimonisa na mikolo mibale mbemle y aba ndunta emimonisa. Ba ndunta ekoki komimonisa liboso na elongi, na ntolo, mpe na mokongo na sima nde eye kopanzana na nzoto nyoso mobimba. Na kati ya monoko, na mifiniku ya miso to na nzonto ya kimobali to ya kimwasi. Makwanza ekobogwana na mokusa, mpe ba bouttons oyo etondisami na mayi na kati oyo eko toboka na sima ya poso moko. bomonisami ya bokono eyaka na sima ya mikolo 14 to 16 soki moto azwaki maladi yango tango mususu emonisamaka na sima ya mikolo zomi to zomi mibale na moko.

Bokolo to maladi ya nzoto ya soso ekoki kosala mabe makasi na ndakisa ya bana oyo ba botami sika. Bana oyo baza na mbula koleka zomi moko na mibale, bilenge, basi ya zemi mpe batu oyo bazali na bokolongono ya bibundeli ya nzonto ya makasi te. Ba complication ya makasi penza na bokono ya nzonto ya soso ezali mingi te kasi ekoki koya na oyo babengi na monoko y aba paya infection becterielle, maladi ya mampululu, bongo ya moto ekoki ko vimba mpe na liwa. Ba liwa mosusu ekoki koya na ndenge ya maladi oyo to bengi nzonto ya soso ata soki moto azali nzonto to sante malamu, belenge mpe bana oyo bazwaki mangwele te.

Mónganga

kokoma

Solola na mónganga to muganga nay o soki obanzi ozoli na maladi ya nzonto ya soso pona ko zuwa bosalisi mpe maladi oyo ekoki kobikisama na kisi oyo esombami na balabala.

Ko salela te kisi ya aspirine to pe kisi nyonso oyo ezali na aspirine na kati pona kosilisa boyoki nzonto moto ya bana mpo ekoki ko mema mitungisi ebele na bana.

Bopanzani ya bokoloto

kokoma
  • Kokosola na kosala likise
  • Bokutani to kosimba ba makwanza

Epanzanaka na bopete nyonso soki bokutani na microbe to kopema mopepe oyo ewuti na makwanza. Mikrobe yango ekoki ko kabama soki moto oyo azali kobela asokoli maboko te mpe asimbi biloko oyo bana ba sakanelaka to soki akwnzi na miso, zolo to munoko mpe asimbi bisika oyo batu mususu bazo simba mpe.

Bokebisi ya bokoloto

kokoma
  • Mangwele ezali lolenge ya malamy ya komibatela
  • Sokola maboko na saboni mpe na mayi
  • Ko sangisa te beloko oyo bosalelaka pona kolia
  • Pangusa bisika nyoso oyo bo simbaka mikolo nyonsor[1]

Tálá mpé

kokoma

Références

kokoma
  1. DHHS
Revenir à la page « Kolokoto ».