Relijion
Bonzámbe mísáto bwa Abrahama
Boyúda - Boklísto - Islamu

Óyo ezalí ekakoli o kati ya molɔ́ngɔ́ etali
Boklísto
Fondements
Biblíya
Yésu Krísto
Acteurs
Bapɔ́stɔlɔ
Maria wa Nazaleti
Pratiques
Batísimu
Ukarístia - Mísa
Losámbo
Événements mpé biyenga
MbótamaNɔ́ɛlɛ
Vendredi saint - Ntingó
Mbuta - Pantekote
Bisíká
Yerusalemi
Bɛtɛlɛmɛ - Nazaleti
Ekeléziya
Bitápe bya boklísto
Katolíkɛ
Ɔtɔdɔ́kisi
Misíoni
Anglicanisme
Bakambi mangómbá
Sángó - Pápa - Pasteur
Ndáko ya Nzámbe
Cathédrale
Basilíki
Ndáko-nzámbe
Tɛmpɛlɔ́

Congrégation de la Mission (Lazariste) ebandi o mobu 1625 o engumba Pari. Kasi ut'o ebandela, mosala mwa lingomba lina moyebanaki mpe o bikolo bisusu.

Santu Vincent wa Paul

Lingomba ya Mission lisangisi ba nganga-Nzámbe na mpe ba mofulele. Bango batangemi ba Religieux te, ata ko bakosalaka bilako. Likanisi ya Mosantu Vincent wa Paul lizalaki 'te akoka kobongisa lingomba lyoko na ntina ya kozala mpe kosala mosala lisanga na bato banso ba mokili. Engebene na mibeko mya Eklezya, bakotanga lyango "société de vie apostolique".

Ntina ya lingomba kokoma

Lingomba lya Mission lizali kosangela nsango elamu na babola, na nguya ya elimo ya Yésu Kristu. Mosala mokotinda ba Lazariste bazala na bizaleli biye :

  • Kolinga kosala liboso mpenza kati ya babola : bosangeli Nsango Elamu na babola, yango nde elembo'te bokonzi bwa likolo bokomi penepene (cf. Mt 11,5) ;
  • Kozala mpe na bokebi na makambo ma mokili, mingi mpenza koluka koyeba ntina ya bokeseni mpe bozangi bosembo o bokaboli nkita na kati ya mokili. wana nde kosala mosala mwa profeta o bosangeli Nsango Elamu;
  • Koyeba kokabola na babola mpasi ya bango, na ntina 'te bobele biso toteya bango te, kasi bango mpe basangela biso Nsango Elamu.
  • Kozala banso lisanga mpo ya kokolisa bolingani mpe bosalisani o kati ya lingomba.
  • Kozala na esengo soki lingomba lisengi biso tokende bipai binso na mokili, lokola ba missionnaire ba yambo ba lingomba bapesi biso ndakisa.
  • Moko moko mpe biso banso lisanga tokoluka ntango inso kobongola motema, lokola Santu Polo akoloba na biso : "bolanda ezalela ya bato ba nse eye te, kasi bokoma bato ba mayele ma sika." (Rm 12,2) (Constitution art.12).

Lingomba lizali kosala mosala wapi? kokoma

Lingomba ya Mission likabwani na ba 45 pɔlɔvɛ́si ntuku inei na itano, na 3 Vice-pɔlɔvɛ́si isato. O molongo mobimba, lingomba lizali kosala na bikolo ntuku mwambi,bikabwani o bituka to continent inso: Afríka, Ameríka, Ostralía, Azía (kin'o Sína) mpe Erópa.

Tozali boni o kati ya lingomba? kokoma

O mobu 1998, lingomba ya Mission lizalaki na ba membre 4193. O kati ya bango.

Baepiskopo bazali 29
Banganga-Nzámbe 3191
Ba mofulele 203
Ba diakono na bai-likindo basali séminaire interne 770

O mibu miye, motango mwa baye bazali kokota na lingomba o bikolo bya Europa mozali moke mpenza. Kasi o bikolo bya Afríka na Ameríka ya nse, motango mona mokoli mingi mpenza.

Misala mya lingomba ut'o kala kokoma

Engebene na mibeko mya lingomba,

  • Uto ebandela, lingomba ya Mission lizali koteya ba mission populaire na ba paroisse.
  • Lingomba lizali mpe kosangela o bikolo biye biyoki naino Nsango Elamu te (mission "ad gentes"). Ezala o bikolo biyebanaka lokola bikolo bya bopalanginyi eyamba to " pays de Mission " (Afríka, Azía, Australie), ezala mpe sik'oyo na Albania, mpe bikolo Ukraine, Siberí, Litwani, Tanzania, Bisanga Salomom, Kuba, Taiwan, Mozambíki na mpe bisusu.
  • O bikolo biyike, ba Lazariste bazali kokoba mosala mwa bobokoli bilenge o nzela ya bonganga na makindo (ba Séminaire), mingi mpenza bikolo bizangi ba nganga-Nzambe ba bangomei (clergé autochtone).
  • Basango bazali kosalisa ba Filles de charités na nzela ya molimo, mpe mangomba masusu ya ba laic mabandisami na mosantu Vincent (lokola AIC) to mazali kolanda nzela eye alakisaki o kati ya Eklezya mpe mokili (Société de Saint-Vincent de Paul, Association de la Médaille miraculeuse, Jeunesse Mariale Vincentienne...).
  • O bikolo bisusu, biteyelo bizali apostolat enene, banda biye bya yambo kin'o biye bya likolo (universités) (Filípino, USA ).

Mioko misala mya sika kokoma

Ba Lazariste basusu bazali kosala elongo na batu bavandi pene na bikunde binene bya bosoto na bingumba (lokola na Payatas, Philippines). Basusu bazali kosalisa bilenge biye batukoli nzotu na bomeli makaya makasi (ba drogué), bato bakobela sida (na Europa), bato bakufa matoi (o Irlande), bitumbe, bana bazali kokola o ba balabala (ba shegué) mpe batu bazangi ndako. Ba Lazariste basusu bazali kosala mpo ya botomboli bomoi na mayele ma batu baye bazali naino na bizaleli bya kala (indigènes), to ya baye bakovandaka esika yoko te (ba Tzigane).

O Brazil, ba Lazariste bakosala mpe apostolat pene na batambwisi mituka minene (ba camioneur), baye bakozalaka ntango inso se na nzela. Basusu bazali kosalisa bato bakimi bitumba to kwokoso isusu, (réfugiés), to baye bazangi minkanda ya leta (sans papiers) mpe koteya bilenge bazangi misala. (o Mputu)

Bakosala mpe mpo ya bokolisi masanga make ma bakristu to Communautés Ecclésiales de Base, na mpe mpo ya ba laïc baye bakokamba masanga mana. Basusu bakoluka kokolisa lolenge la mosala mosantu Vincent alakisaki o ntei ya biteyelo mpe ya ba université. Basusu bakomipesa o masanga ma bomanyoli bomoi bwa bamibonza, bobokoli bana na bilenge, ntina ya boboyi koyamba (athéisme), nzela ya bopesi mpe bozwi nsango, pastorale ya mabota na mpe masalisi ndenge na ndenge matali ezaleli mpe bomoto.

Tokokuta mpe ba Lazariste basusu bakopesa mateya o biteyelo bya bokolisi boyambi mpe bomoto, ezala biye bya ba diocèse, ezala biye bya lingomba lya Mission to mpe biye bya mangomba masusu.

SIEV mpe CIF kokoma

Mpo ya bokolisi mposa ya boyekoli bomoi, misala mya mosantu Vincent mpe elimo atikeli biso, lisanga lyoko likelami na nkombo "Secrétariat International d'Etudes Vincentiennes" (SIEV). SIEV ezali kolengele sanza yoko ya mateya (mois vincentien) na Pari mpo ya ba Lazariste (babandi mpe kondima mangomba masusu maye makolandaka ndakisa ya mosantu Vincent).

Kaka o mboka Paris, babandisi "Centre International de Formation Saint-Vincent" (CIF). Ezali kopesa mateya ma recyclage mpo ya ba Lazariste bazali na mibu 35 kin'o 50.

Pɔlɔvɛ́si ya Kɔ́ngɔ-Beljika kokoma

O ekolo Beljika, ndako ya liboso ya lingomba lya Mission efungwamaki na Liège na 1902. Ndako ya yambo ya lingomba o Kɔ́ngɔ efungwami na Bikoro (Mbandaka) na 1926.

Na 1929 bafungoli ndako ya Leuven mpe 1952 eye ya Lessines. O mobu 1947, ndako inso isangani o Pɔlɔvɛ́si ya Beljika mpe Kɔ́ngɔ-Bɛlɛzi ekomi "mission" ya pɔlɔvɛ́si ena.

O mobu 1991, na botalaka 'te ba Lazariste bazali lisusu mingi te o Beljika mpe awa motango mwa bango mokomi kokola o ekolo Kɔ́ngɔ, Bakonzi ba lingomba bazwi mokano mwa bokomisi Kongo pɔlɔvɛ́si mpe bobongoli Beljika bo Etuka to Région autonome o kati ya Pɔlɔvɛ́si ya Kɔ́ngɔ. Ezali na ndimbola enene 'te o bobange bwa ye, province-mama ekoka kokoma o maboko ma mwana oyo ye akolisi na motema monso.

Pɔlɔvɛ́si ya Kongó kokoma

Pɔlɔvɛ́si ya Kongó ebandisami na ba Lazariste ya Beljika. Sango Félix Dekempeneer, mobandisi wa mission ya Bikoro, akomi o Kongó o mobu 1925, mpo ya kolengele boyei bwa ba nyango ba Filles de la Charité. Mpe wana bamopesi mosala mwa bosangeli Nsango Elamu o etuka ya Bikoro. O ntango ena, mission ya Bikoro ezalaki na batu soko nkoto ntuku ibale, mpe mbele bakristu bobele nkoto yoko na ndambo to nkoto ibale. O mobu 1959, mission ya Bikoro ekomi Diocesi mpe Mgr Camille Vandekerkove, lazariste, akomaki Episkopo wa yambo ya Diocesi ena. Basango Lazaristes babandisi ba paroisse iye: Bikoro St. Vincent wa Paul (1926), Irebu Notre Dame du Chenal (1928), Lukolela Sacré-Coeur (1933), Bokongo Sainte Famille (1936), Yumbi Christ-Roi (1938), [[Bolobo Notre Dame (1946), Itipo Santu Yozefu (1948), Iboko Notre Dame de la Médaille Miraculeuse (1956), Mooto Saint Emille (1962), mpe Momboyo Martyrs ya Uganda (1963).

Ut'o mobu 1975, nsima ya liwa lya Mgr Camille, diocesi ya Bikoro esangani na eye ya Mbándáká. Nkombo ya diocèse ekomi Archidiocèse de Mbandaka-Bikoro. Liboso o bokambemi bwa Mgr Pierre Wijnants, wa lingomba lya ba Missionnaire du Sacré-Coeur, na nsima o bokambemi bwa Mgr Frédéric Etsou, oyo akomi lelo Cardinal mpe Episkopo wa lokumu wa Kinshasa. Lelo, Archidiocèse ya Mbándáká-Bikoro ezali o maboko ma Mgr Joseph Nkumuondala.

O mobu 1982, ba Lazaristes bakamati paroisse Notre Dame du Congo na Mbándáká. Nsima bazwaki mpe Paroisse St. Paul Apôtre (1992-1998) na Mbándáká. Bobele o engumba ya Mbándáká, bafungoli ndako "Félix Dekempeneer", eye ekoyangela Cité Elikya mpo ya kobokolo mpe kosalisa bana to bilenge baye bazangi mosala (1998).

Na Kinshasa ba Lazariste bazali kosala o paroisse St Adrien ya Ngaba ut'o mobu 1986. Bobele na Kinshasa, bafungoli ndako ya boyambi basango bazali na lipaya na Limeté (1991). Bazwi mpe mosala mwa bokambi bato ba mpasi na lopitalo Santu Yozefu. Awa babandi kozwa bana mboka baye balingi kolanda nzela ya mosantu Vincent awa na mboka Kongo, bafungoli ndako ya boyekoli ibale:

O mobu 1981, Séminaire Interne (noviciat) "Source de vie" na Bokongo, eye eleki na Itipo ut'o 1994. Na mobu 1985, bafungoli likindo linene to Scolasticat Saint Vincent de Paul, na Kimwenza (Kinshasa) mpo ya baye bakoyekolaka philosophie mpe théologie. Na moi mwa lelo, Province ya Kɔ́ngɔ ezali na ba missionnaire 34 (ba nganga-Nzambe 32, diakono moko mpe mofulele moko) na bilenge ba likindo 27. Mpo etali bikolo bya bango, ba missionnaire bakabwani boye: 21 bazali ba congolais, 9 polonais, 2 belges, 1 hollandais mpe 1 italien.

Ba lazariste congolais babale bazali missionnaire na Algeria mpe na Kamerun. Mosusu asengeli kokenda bo Directeur ya Séminaire interne na Kamerun. Lazariste polonais moko wa province ya Congo azali kosala mosala na Beljika. Ba Lazariste basusu banei bauti o province ya Kɔ́ngɔ bazali sika kosala o ekolo Sína (1 hollandais) mpe na Haiti (2 polonais), mpe na Gresi (1 polonais).

Misala mya ba Lazariste o Kɔ́ngɔ kokoma

O Archidiocese ya Mbandaka-Bikoro, basango ba Lazariste bazali kokamba ba paroisse mwambi (8). Mosala mwa bango motali mingi mpenza:

  • Bokolisi bakristu o nzela ya boyambi, o kati ya masanga make to Communauté Ecclésiale de Base (CEB), engebene na mwango mwa Eklezya ya Kɔ́ngɔ.
  • Bopesi mateya na bakatekisi to na ba laïc basusu baponami mpo ya kokamba masanga ma bakristu o mboka. Mateya mango makopesama mpo ya mobu moko na "Centre de Formation chrétienne de Bikoro". Epai esusu, "Centre d'Animation Missionnaire" ezali koteya ba mission populaire mpe kolengele ba laïc mpe bakambi ba mangomba ma apostolat.
  • Misala mya botomboli bomoto mpe mboka; bolendisi o misala mya bilanga; botongi biteyelo mpe Ndako-Nzambe o mboka na mpe misala misusu ndenge na ndenge miye mitali bolamu bwa bato

Bo bana ba Santu Vincent, ba Lazariste bazali kotiya motema mpe na boluki nzela kani bakoki kosalisa bilenge bazangi mosala (Cité Elikya na Mbándáká) na mpe bato ba mpasi (Lopitalo Santu Yozefu na Kinshasa).

Lokola bazali o libota linene lya Santu Vincent, ba Lazariste bazali kosala manso mpo ya bokolisi bomoko o kati ya bango na mangomba masusu maye mazali kolanda ndakisa ya Santu Vincent (ndakisa : Filles de la Charité, Religieux de St. Vincent de Paul na basusu bayike). Bayangeli ba mangomba mana manso bakokutanaka mbala na mbala na Kinshasa mpo ya mateya mpe bisambo.

Mosala mwa bango o kati ya ba Laïc baye bazali kolanda mpe ndakisa ya Santu Vincent mozali komonana mingi mpenza na nzela ya lingomba to Association de la Médaille Miraculeuse, eye euti kobanda awa na Congo, na nzela ya Société de Saint Vincent de Paul, Jeunesse Mariale Vincentienne, na mpe masanga masusu malandi mosantu Vincent.

Région ya Beljika kokoma

Leuven kokoma

Ndako ya Leuven ekosalaka mosala mwa procure mpo ya Pɔlɔvɛ́si ya Kɔ́ngɔ : Bosombi mpe botindi biloko mpo ya ba Lazariste bazali o Kongo. Ndako ya boyambi ba Lazaristes baye bayei kopemisa nzoto (bazali na congé) to mpe baye bazali kobela. Ndako ya bopemi mpo ya bandeko baye bakomi mibange to baye bazali kobela.

Ba Lazariste baye bavandi o ndako ya Leuven bazali mpe kosala misala na lopitalo (lokola aumônier to lokola volontaire), bakotalaka batu baye bazali na mikakatano, bakosanganaka na mangomba ya losambo (groupes de prière) mpe bakosalisaka ba Filles de la Charité baye bakolobaka falamá.

Lessines kokoma

Ndako-Nzambe ya Lessines esalemi na bokundoli bomilakisi bwa Ngondo Mosantu Maria na rue du Bac (Paris). Mokolo mwa yambo mwa poso inso, lisanga Association de la Médaille Miraculeuse likosambelaka losambo la novena (na 20h ). Tokoyambaka mpe bakristu balingi koleka o sanctuaire (ba pèlerin), ezala moto moko moko to mpe lisanga.

Poso nyonso ya nsuka ya sanza ya mitano, tosalaka losambo lonene la novena o bokambemi bwa nganga-Nzambe moko auti epai esusu mpo ya kolendisa bana ba Mama Maria. Bokutani bona bwa losambo bokosangisaka bandeko banso ba Belgique baye bamesani koya epai ya Mama.

Lokasa to revue mensuelle moko (2000 exemplaires) lozali kosangisa bayebani ba biso banso. Ndako-Nzambe ya biso esalaka mpe misala minso mikosalemaka o paroisse. Moko wa ba nganga-Nzambe ba sanctuaire azali na kati ya baye bakoteyaka o ba paroisse ya doyenné ya Lessines.

Liège kokoma

Maison "ad instar domus" Ba Lazariste ba Liège bavandi esika yoko te, kasi bazali motema moko na mosala : Na bosalisi banyango ba Filles de la Charité, mangomba ma bilenge mpe na boteyi bakristu na ba ndako. Na bosalisi baye bayei lipaya na Belgique (immigrés) na mpe baye bakimi bitumba na mobulu o mboka ya bango (réfugiés). Tozali kosalisa bango na biloko, kobunda mpo ya makoki mpe bomoto ya bango.

Relijion
Bonzámbe mísáto bwa Abrahama
Boyúda - Boklísto - Islamu